‏ Luke 6:20-26

Esengo to mawa

(Mat 5.1-12)

20Bongo Yesu atalaki bayekoli na Ye mpe alobaki : « Esengo na bino oyo bozali babola,
pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bino !
21 Esengo na bino oyo bozali na nzala sik’oyo,
pamba te bokotonda !
Esengo na bino oyo bozali kolela sik’oyo,
pamba te bokoseka !
22 Esengo na bino tango bato bazali koyina bino,
tango bazali kobengana bino,
tango bazali kofinga bino,
mpe tango bato bazali kosambwisa kombo na bino,
likolo na Mwana na Moto !

23 Tango makambo yango ekokokisama, bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo. Ezalaki mpe kaka ndenge wana nde batata na bango banyokolaki basakoli. 24 Kasi mawa na bino oyo bozali bazwi,
pamba te bosili kozwa kobondisama na bino !
25 Mawa na bino oyo bozali ya kotonda sik’oyo,
pamba te bokozala na nzala !
Mawa na bino oyo bozali koseka sik’oyo,
pamba te bokozala na mawa mpe bokolela !
26 Mawa na bino soki bato nyonso bazali koloba malamu na tina na bino,
pamba te ezali ndenge wana nde bakoko na bango
basalaki basakoli ya lokuta !
Copyright information for LinMNB