‏ Luke 6:27-36

Mateya mpo na kolinga banguna

(Mat 5.37-48)

27 Kasi, na bino oyo bozali koyoka Ngai, nalobi : Bolingaka banguna na bino mpe bosalelaka bayini na bino bolamu. 28Bopambolaka bato oyo balakelaka bino mabe, mpe bobondelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino. 29Soki moto abeti yo mbata na litama moko, pesa ye mpe litama mosusu. Soki moto abotoli yo kazaka na yo, tika ye azwa lisusu elamba na yo. 30Pesa na moto nyonso oyo asengi yo ; mpe soki moto akamati eloko na yo, kosenga te ete azongisela yo yango.

31 Oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bino mpe bosalaka yango mpo na bango. 32Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, litomba nini bokozwa ? Bato ya masumu mpe balingaka bato oyo balingaka bango. 33Mpe soki bosalaka bolamu epai ya bato oyo basalaka bino bolamu, litomba nini bokozwa ? Bato ya masumu mpe basalaka bongo. 34Soki bodefisaka kaka na bato oyo bozali na elikya ete bakoki kofuta bino niongo oyo bodefisaka bango, litomba nini bokozwa ? Bato ya masumu mpe badefisaka baninga na bango, bato ya masumu, na elikya ete bakofuta bango niongo yango.

35 Kasi bolingaka banguna na bino, bosalelaka bango bolamu, bodefisaka na kozanga kolikya ete bakofuta bino niongo. Na bongo, bokozwa litomba monene mpe bokozala bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te azali malamu mpo na bato oyo bandimaka te bolamu oyo basaleli bango, mpe azali malamu mpo na bato mabe.

36 Boyokelaka bato mawa, ndenge kaka Tata na bino ayokelaka bato mawa.
Copyright information for LinMNB