‏ Luke 6:43-45

(Mat 7.16-20)

43 Nzete ya malamu ebotaka te bambuma ya mabe, mpe nzete ya mabe ebotaka te bambuma ya malamu. 44Nzete nyonso eyebanaka na mbuma na yango : na nzete ya nzube, babukaka bambuma ya figi te ; mpe na nzete ya sende, balongolaka bambuma ya vino te. 45Moto malamu abimisaka bolamu kowuta na makambo malamu oyo etondi kati na motema na ye, mpe moto mabe abimisaka mabe kowuta na makambo mabe oyo etondi kati na motema na ye. Pamba te monoko elobaka kolanda makambo oyo etondi kati na motema.
Copyright information for LinMNB