‏ Luke 8:19-21

Mama mpe bandeko ya Yesu

(Mat 12.46-50; Mlk 3.31-35)

19Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki kotala Yesu, kasi bakokaki te kokoma pene na Ye mpo na ebele ya ebele. 20Moto moko ayebisaki Ye : — Mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali batelemi libanda, bazali na posa ya komona yo.

21Kasi Yesu azongisaki : — Mama na Ngai mpe bandeko na Ngai, ezali bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batiaka yango na misala.
Copyright information for LinMNB