Luke 8:22-25
Yesu aleki mopepe na makasi
(Mat 8.23-27; Mlk 4.35-41)
22Mokolo moko, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale.Bongo bamataki na bwato mpe bakendeki. 23Wana bayekoli bazalaki koluka nkayi, Yesu alalaki pongi. Mopepe moko ya makasi epepaki kati na ebale ; bwato ekomaki kotonda na mayi, mpe bakomaki na likama monene. 24Bayekoli bapusanaki mpe balamusaki Ye na koganga : — Moteyi, Moteyi, tozali kokufa !
Yesu alamukaki mpe apesaki mitindo na mopepe mpe mbonge ; bongo ekitaki, mpe kimia ezongaki. 25Yesu atunaki bayekoli na Ye : — Wapi kondima na bino ?
Kasi bango, batondaki na somo mpe bakamwaki, bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani ? Azali kopesa mitindo ata na mipepe mpe na mayi, mpe yango ezali kotosa ye ! »
Copyright information for
LinMNB