‏ Luke 9:1-6

Yesu atindi bayekoli na Ye zomi na mibale

(Mat 10.1-9, 11-14; Mlk 6.7-13)

1Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale, apesaki bango nguya mpe bokonzi ya kobengana milimo nyonso ya mabe mpe ya kobikisa bokono ; 2mpe atindaki bango kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe kobikisa babeli. 3Alobaki na bango : — Bomema eloko moko te mpo na mobembo, ezala lingenda, sakosi, eloko ya kolia to mbongo ; bozala na banzambala mibale te na moto. 4Na ndako nyonso oyo bokokota, bovanda kuna kino bokolongwa na engumba. 5Soki bato baboyi koyamba bino, botika engumba na bango mpe bopupola putulu ya makolo na bino lokola litatoli mpo na kotelemela bango.

6Bayekoli bakendeki, batambolaki na mboka moko na moko mpe bazalaki kosakola Sango Malamu mpe kobikisa babeli na bisika nyonso.
Copyright information for LinMNB