‏ Luke 9:28-36

Nzoto ya Yesu ebongwani

(Mat 17.1-9; Mlk 9.2-10)

28Mikolo pene mwambe sima na Yesu koloba bongo, azwaki elongo na Ye, Petelo, Yoane mpe Jake, mpe amataki na ngomba mpo na kokende kosambela.

29Wana azalaki kosambela, elongi na Ye ebongwanaki, mpe bilamba na Ye ekomaki kongenga makasi lokola pole ya mikalikali. 30Mibali mibale bazalaki kosolola na Yesu : Moyize mpe Eliya 31oyo babimaki kati na kongenga ya nkembo ; bazalaki kolobela na tina na bozongi na Ye, oyo asengeli kokokisa na Yelusalemi.

32Petelo mpe baninga na ye balalaki pongi makasi. Tango kaka balamukaki na pongi, bamonaki nkembo ya Yesu elongo na mibali wana mibale bazali ya kotelema elongo na Ye.

33Wana mibali yango bazalaki kokabwana na Yesu, Petelo alobaki : — Moteyi, eleki malamu mpo na biso kozala awa ! Totonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya.

Solo, Petelo ayebaki te makambo oyo azalaki koloba.
34Wana azalaki nanu koloba bongo, lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango. Somo ekangaki bayekoli, wana bakotaki kati na lipata yango.

35Mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango, elobaki : — Oyo azali Mwana na Ngai, oyo napona ; boyoka Ye !

36Sima na mongongo yango koloba, bamonaki ete Yesu azali Ye moko. Bayekoli babombaki likambo yango mpo na bango moko mpe, na mikolo wana, bayebisaki ata na moto moko te makambo oyo bamonaki.
Copyright information for LinMNB