Luke 9:46-48
Nani aleki monene ?
(Mat 18.1-5; Mlk 9.33-37)
46Tembe moko ebimaki kati na bayekoli ; bazalaki koluka koyeba moto oyo aleki monene kati na bango. 47Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, akamataki mwana moke, atiaki ye pembeni na Ye, 48mpe alobaki na bango : — Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo ya moke na Kombo na Ngai, ayambi nde Ngai moko ; mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi nde Motindi na Ngai. Pamba te, ezali ye oyo aleki moke kati na bino nyonso nde aleki monene.
Copyright information for
LinMNB