‏ Luke 9:57-62

Ndenge nini kolanda Yesu

(Mat 8.18-22)

57Wana bazalaki kotambola na nzela, mobali moko alobaki na Yesu : — Nakolanda Yo na esika nyonso oyo okokende.

58Yesu azongiselaki ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.

59Yesu alobaki na mobali mosusu : — Landa Ngai.

Kasi mobali yango azongiselaki Ye : — Nkolo, pesa ngai nzela ya kokende nanu kokunda tata na ngai.

60Yesu alobaki na ye : — Tika bakufi bakunda bakufi na bango ; kasi yo, kende kosakola Bokonzi ya Nzambe.

61Mosusu lisusu alobaki na Ye : — Nkolo, nakolanda Yo ; kasi pesa ngai nzela ya kozonga nanu mpo na kokende kopesa libota na ngai mbote ya suka.

62Yesu azongiselaki ye : — Moto oyo asimbi kongo mpo na kobalola mabele ya bilanga, kasi azali kotala na sima, azali na tina moko te mpo na Bokonzi ya Nzambe.
Copyright information for LinMNB