Mark 1:16-20
16Mokolo moko, Yesu azalaki koleka pembeni ya ebale ya Galileya, amonaki Simon na ndeko na ye Andele. Bazalaki kobwaka monyama na ebalepamba te bazalaki baluki mbisi. 17Yesu alobaki na bango : —Boya, bolanda ngai, mpe nakokomisa bino baluki ya bato ! 18Kaka na tango wana, batikaki minyama na bango mpe balandaki ye. 19Tango apusanaki mwa liboso, amonaki Zaki mwana ya Zebedeo na ndeko na ye Jean, bazalaki na kati ya bwato mpe bazalaki kobongisa minyamana bango. 20Kaka na tango wana, abengaki bango ; batikaki tata na bango Zebedeo na kati ya bwato, elongo na basali na ye, mpe balandaki Yesu.Yesu abengani milimo mabe
(Lk. 4.31-37)
Copyright information for
LinMNB