‏ Mark 1:2-7

2Na mokanda ya moprofeta Ezayi ekomama boye : Tala, nakotinda ntoma na ngai liboso na yo,
oyo akobongisela yo nzela.

3 Mongongo ya moto ezali kobelela na esobe :
Bobongisa nzela ya Nkolo,
Bosembola banzela na ye !

4Jean ayaki, azalaki kobatisa na esobe mpe azalaki koloba : “Bozwa libatisi, mpo na kolakisa ete bobongoli mitema ; bongo Nzambe akolimbisa masumu na bino !”

5Bato nyonso ya mokili ya Yudea mpe ya Yeruzalem bazalaki kokendeepai na ye. Bazalaki koyambola masumu na bango, mpe azalaki kobatisabango na mayi ya Yordani. 6Jean azalaki kolata elamba oyo esalami na bapwale ya shamo, mpe mokaba ya poso ya nyama na loketo ; azalaki kolia makonko na mafuta ya nzoi. 7Azalaki koteya na bato boye :

—Moto moko akoya sima na ngai, ye aleki ngai na nguya ; nakoki kutu te kogumbama liboso na ye mpo na kofungola basinga ya sandale na ye.
Copyright information for LinMNB