Mark 1:21-28
Yesu abengani molimo mabe
(Lk 4.31-37)
21Bongo Yesu elongo na bayekoli na Ye bakendeki na Kapernawumi. Na mokolo ya Saba, Yesu akotaki na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya. 22Bato bakamwaki makasi malakisi na Ye, pamba te ateyaki na bokonzi oyo balakisi ya Mobeko bazangaki. 23Kaka na tango yango, ezalaki na moto moko, kati na ndako ya mayangani, oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki koganga : 24— Yesu ya Nazareti, olingi nini ? Oyei nde koboma biso ? Nayebi Yo malamu, ozali Motindami mpe Mosantu ya Nzambe !25Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo : — Kanga monoko na yo ! Bima kati na moto oyo.
26Molimo mabe eningisaki moto yango makasi mpe ebimaki na koganga. 27Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kotunana : — Oyo ezali lisusu likambo nini ? Tala mateya ya sika oyo etondi na nguya ! Azali kopesa mitindo ata na milimo mabe, mpe ezali kotosa Ye !
28Mbala moko, sango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka mobimba ya Galile.
Copyright information for
LinMNB