‏ Mark 1:40-45

40Moto moko na maba apusanaki pene na Yesu, afukamaki mpe asengaki na Yesu : — Soki olingi, komisa ngai peto.

41Yesu ayokelaki ye mawa, atandaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki : — Nalingi ete ezala bongo, koma peto.

42Mbala moko, maba elongwaki na nzoto ya mobeli mpe akomaki peto. 43Mbala moko, Yesu azongisaki ye mpe akebisaki ye : 44 — Yoka Ngai malamu, koyebisa likambo oyo na moto moko te ; kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa, mpo na kopetolama na yo, likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.

45Kasi tango kaka abimaki, abandaki koloba mpe kopanza sango. Mpo na yango, Yesu azalaki lisusu te kokoka kokota kati na bingumba na miso ya bato nyonso ; kasi akomaki kovanda na libanda ya bingumba, na bisika oyo ebombama. Nzokande, bato bazalaki kaka kowuta bipai na bipai mpo na koya epai na Ye.
Copyright information for LinMNB