Mark 1:9-11
Libatisi mpe komekama ya Yesu
(Mat 3.13-17; Lk 3.21-22)
9Na tango wana, Yesu ayaki wuta na Nazareti ya Galile, mpe Yoane abatisaki Ye na ebale Yordani. 10Tango kaka abimaki na mayi, amonaki Likolo kofungwama mpe Molimo kokitela Ye lokola ebenga. 11Mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi ! »
Copyright information for
LinMNB