‏ Mark 10:1-12

Mateya na tina na koboma libala

(Mat 19.1-12)

1Yesu alongwaki na esika wana mpe akendeki na etuka ya Yuda, na ngambo mosusu ya Yordani. Ebele penza ya bato bayaki lisusu kosangana pene na ye ; bongo akomaki lisusu koteya bango kolanda momesano na Ye.

2Bafarizeo bapusanaki mpe bapesaki Ye motuna mpo na komeka Ye : — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala ?

3Yesu azongiselaki bango : — Moyize apesaki bino mobeko nini ?

4Balobaki na Yesu : — Moyize apesaki na mobali nzela ya koboma libala na mwasi na ye, kaka soki akomi mokanda ya koboma libala.

5Bongo Yesu alobaki na bango : — Moyize akomaki mobeko wana mpo na bino, pamba te mitema na bino ezali mabanga. 6Kasi na ebandeli ya mokili, Nzambe « akelaki bango mobali mpe mwasi. » 7Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, 8mpe bango mibale bakokoma nzoto moko. Boye, bakozala lisusu mibale te, kasi nzoto moko. 9Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi.

10Tango bazongaki na ndako, bayekoli batunaki lisusu Yesu na tina na likambo yango. 11Yesu alobaki na bango : — Soki mobali alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu asali ekobo liboso ya mwasi na ye ya liboso. 12Soki mwasi abomi libala na ye mpe abali mobali mosusu asali ekobo.
Copyright information for LinMNB