Mark 10:17-31
Bazwi mpe Bokonzi ya Nzambe
(Mat 19.16-30; Lk 18.18-30)
17Wana Yesu azalaki kokende, moto moko apotaki mbangu mpo na koya epai na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe atunaki : — Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ?18Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu ? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe. 19Oyebi mibeko oyo : « Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okosalaka moninga mabe te, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. »
20Moto yango alobaki lisusu : — Moteyi, natosaka nyonso wana wuta bolenge na ngai !
21Yesu atalaki ye, asepelaki na ye mingi mpe alobaki na ye : — Ozangi eloko moko kaka : kende, teka biloko na yo nyonso mpe pesa mbongo oyo okozwa epai ya babola ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
22Tango moto yango ayokaki bongo, alembaki nzoto mpe akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi. 23Yesu atalaki bayekoli na Ye, alobaki na bango : — Ezali pasi mpo na bazwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe !
24Bayekoli bakamwaki mingi mpo na maloba na Ye. Kasi Yesu alobaki na bango lisusu : — Solo, bana na Ngai, ezali pasi ▼
▼ Mikanda mosusu ya kala ebakisaka : « na ba-oyo batiaka mitema na bango mobimba na bomengo. »
mpo na kokota kati na Bokonzi ya Nzambe ! 25Ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.26Bayekoli bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana : — Bongo nani penza akoki kobikisama ?
27Yesu atalaki bango mpe alobaki : — Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, ekosalema penza ; pamba te nyonso ekoki kosalema na Nzambe.
28Petelo alobaki na Yesu : — Biso, totiki nyonso mpo na kolanda Yo !
29Yesu azongisaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo atiki ndako na ye, bandeko na ye ya mibali mpe ya basi, mama na ye, tata na ye, bana na ye to bilanga na ye, mpo na Ngai mpe mpo na Sango Malamu, 30akozwa mbala nkama koleka, na tango oyo tozali kobika sik’oyo, bandako, bandeko ya mibali mpe ya basi, bamama, bana mpe bilanga, elongo na minyoko ; mpe na tango oyo ekoya, bomoi ya seko. 31Kasi kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
Copyright information for
LinMNB