‏ Mark 10:35-45

Jake mpe Yoane basengi esika ya lokumu

(Mat 20.20-28; Lk 22.25-27)

35Bongo Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, bapusanaki pene ya Yesu mpe balobaki na Ye : — Moteyi, tolingi ete osalela biso likambo oyo tokosenga Yo.

36Yesu atunaki bango : — Bolingi ete nasalela bino nini ?

37Bazongisaki : — Pesa biso nzela ya kovanda kati na nkembo na Yo : moko na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe mosusu, na ngambo ya loboko na Yo ya mwasi.

38Yesu alobaki na bango : — Bozali kososola te makambo oyo bozali kosenga ! Boni, bokoki komela kopo oyo Ngai nakomela to kozwa libatisi oyo Ngai nakozwa ?

39Bazongisaki : — Iyo, tokoki !

Yesu alobaki na bango : — Solo, bokomela na bino kopo oyo Ngai nakomela mpe bokozwa na bino libatisi oyo Ngai nakozwa ;
40kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa ; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.

41Tango bayekoli mosusu zomi bayokaki makambo wana, basilikelaki Jake mpe Yoane. 42Yesu abengaki bango nyonso mpe alobaki na bango : — Boyebi malamu ete bato oyo bamonanaka lokola bakonzi bakonzaka bikolo oyo ezali na se ya bokonzi na bango, mpe bakalaka ya lokumu bakonzaka bato oyo bazali na se ya bokonzi na bango. 43Esengeli te kozala bongo kati na bino ; nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino ; 44mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu ya bino nyonso ! 45Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye, kasi ayaki nde kosala mpo na bato mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.
Copyright information for LinMNB