Mark 10:46-52
Yesu abikisi Bartime, mokufi miso
46Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Jeriko. Tango bazalaki kobima wuta na engumba elongo na bato ebele, mokufi miso Bartime, mwana mobali ya Time, avandaki pembeni ya nzela mpe azalaki kosenga-senga. 47Tango ayokaki ete Yesu ya Nazareti azali koleka, akomaki koganga : — Yesu, mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !48Bato ebele bazalaki kopamela ye mpo ete akanga monoko na ye, kasi Bartime agangaki lisusu makasi : — Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
49Yesu atelemaki mpe alobaki : — Bobenga ye !
Bato babengaki mokufi miso yango mpe balobaki na ye : — Yika mpiko ! Telema ! Azali kobenga yo !
50Tango ayokaki maloba yango, abwakaki elamba na ye, atelemaki mpe apusanaki pene ya Yesu. 51Yesu alobaki na ye : — Olingi nasala nini mpo na yo ?
Mokufi miso azongisaki : — Moteyi, nalingi komona.
52Yesu alobaki na ye : — Kende, kondima na yo ebikisi yo.
Mbala moko, akomaki komona mpe alandaki Yesu.
Copyright information for
LinMNB