‏ Mark 11:1-11

Yesu akoti na Yelusalemi

(Mat 21.1-11; Lk 19.28-40; Yn 12.12-19)

1Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi, bakomaki na Betifaje mpe Betani oyo ezalaki pene ya ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli na Ye mibale, 2alobaki na bango : — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino. Tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona mwana ya ane bakanga na singa, oyo moto ata moko te asila kosalela ; bofungola yango mpe bomema yango awa. 3Soki moto moko atuni bino : « Mpo na nini bozali kofungola yango ? »
Bozongisela ye : « Nkolo azali na bosenga na yango. »
Mpe na mbala moko, akotinda yango awa.

4Bakendeki mpe bakutaki mwana ya ane ekangama na libanda, pembeni ya ekuke ; mpe bafungolaki yango. 5Ndambo ya bato oyo bazalaki wana batunaki : — Nini ezwi bino mpo ete bofungola mwana oyo ya ane ?

6Bayekoli bazongiselaki bango ndenge kaka Yesu alobaki na bango, mpe bato yango batikaki bayekoli kokende elongo na yango. 7Bamemaki mwana yango ya ane epai ya Yesu, batandaki bilamba na bango na mokongo na yango ; mpe Yesu avandaki na likolo na yango. 8Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela ; bamosusu batandaki bitape ya mobesu, oyo bawutaki kokata na likolo ya banzete kati na bilanga.

9Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana !

Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo !

10Tika ete bokonzi oyo eyei epambolama,
bokonzi ya Davidi, tata na biso !

Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »

11Tango kaka Yesu akotaki na Yelusalemi, akendeki kati na Tempelo. Mpe kuna, atalaki na bokebi ndenge makambo nyonso ezalaki kosalema ; kasi lokola tango elekaki, abimaki mpe akendeki na Betani elongo na bayekoli na Ye zomi na mibale.
Copyright information for LinMNB