Mark 11:27-33
Batelemeli bokonzi ya Yesu
(Mat 21.23-27; Lk 20.1-8)
27Bakendeki lisusu na Yelusalemi. Wana Yesu azalaki kotambola kati na lopango ya Tempelo, bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye : 28— Na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Mpe nani apesi Yo bokonzi ya kosala yango ?29Yesu azongiselaki bango : — Nazali kotuna bino motuna moko kaka. Bopesa Ngai nanu eyano, bongo Ngai nakoyebisa bino soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango. 30Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ? Boyebisa Ngai !
31Bakomaki kokabola makanisi bango na bango : « Soki tolobi ete ewutaki na Nzambe, akotuna biso lisusu : bongo mpo na nini bondimaki ye te ? 32Soki mpe tolobi ete ewutaki na bato, wana… » Solo, bazalaki kobanga bato, pamba te bato nyonso bazalaki kozwa Yoane lokola mosakoli. 33Boye, bazongiselaki Yesu : — Toyebi te !
Yesu mpe alobaki na bango : — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.
Copyright information for
LinMNB