‏ Mark 12:1-12

Lisese ya basali mabe na elanga ya vino

(Mat 21.33-46; Lk 20.9-19)

1Bongo Yesu akomaki koloba na bango na masese : — Moto moko alonaki elanga ya vino, atongaki lopango zingazinga na yango, atimolaki ekamolelo bambuma ya vino mpe atongaki ndako molayi ya bakengeli. Sima, apesaki elanga yango na maboko ya basali mpo ete bakoma kofutela yango, mpe akendeki na mobembo. 2Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga, mpo ete akende kokongola epai na bango ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino. 3Kasi bafuteli elanga bakangaki ye, babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba. 4Atindelaki bango mosali mosusu ; babetaki-betaki ye na moto mpe basambwisaki ye. 5Atindaki lisusu mosali mosusu ; oyo wana, babomaki ye. Bongo, na sima, atindaki lisusu bato ebele ; kasi babetaki bamoko, mpe babomaki bamosusu.
6 Nkolo elanga atikalaki kaka na moto moko ya kotinda : mwana na ye ya bolingo. Atindaki ye na suka na bango nyonso mpe amilobelaki : « Solo, bakotosa mwana na ngai. » 7Kasi bafuteli elanga balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ya elanga ! Boya, toboma ye mpo ete libula ya elanga ekoma ya biso ! » 8Bakangaki ye, babomaki ye mpe babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino.
9 Boye, nkolo elanga ya vino akosala nini ? Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga wana mpe akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bafuteli mosusu. 10Nanu botanga Makomi oyo te :
« Libanga oyo batongi ndako babwakaki
ekomi libanga ya songe ya ndako,
mpe esimbi ndako mobimba ?
11 Ezali Nkolo nde alingaki bongo,
mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso ! »

12Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato bazalaki koluka nzela ya kokanga Yesu, pamba te basosolaki ete alobaki lisese wana mpo na bango. Kasi lokola babangaki bato, batikaki Ye ; mpe moto na moto akendeki.
Copyright information for LinMNB