Mark 12:13-17
Eyano ya Yesu na tina na mpako ya mokonzi
(Mat 22.15-22; Lk 20.20-26)
13Sima, batindelaki Yesu ndambo ya Bafarizeo mpe ndambo ya bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka kokanga Ye na motambo ya maloba na Ye moko. 14Tango bakomaki epai na Ye, balobaki : — Moteyi, toyebi ete ozali moto ya sembo mpe obangaka bato te, pamba te oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe. Boni, Mobeko na biso epesi solo nzela ya kofuta mpako ya Sezare to te ? Tosengeli penza kofuta yango ?15Kasi lokola Yesu ayebaki ete bazali bato ya bilongi mibale, alobaki na bango : — Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo ? Bomemela Ngai mbongo moko ya ebende, mpo ete namona yango.
16Bamemelaki Ye yango, mpe atunaki bango : — Elilingi ya nani mpe makomi ya nani bozali komona awa ?
Bazongisaki : — Ya Sezare.
17Yesu alobaki na bango : — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe !
Bakamwaki mingi eyano ya Yesu.
Copyright information for
LinMNB