‏ Mark 12:28-34

Mobeko oyo eleki monene

(Mat 22.34-40; Lk 10.25-28)

28Moko kati na balakisi ya Mobeko, oyo ayokaki bango kotiana tembe mpe amonaki ete Yesu azongiselaki bango biyano ya malamu, apusanaki pene na Yesu mpe atunaki : — Mobeko nini eleki monene kati ya mibeko nyonso ?

29Yesu azongisaki : — Tala Mobeko oyo eleki monene : « Isalaele, yoka malamu ! Yawe azali Nzambe na biso, Yawe azali kaka moko. 30Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso. » 31Tala mobeko oyo elandi : « Okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. » Mobeko ya motuya koleka mibeko wana mibale ezali te.

32Bongo molakisi ya Mobeko alobaki na ye : — Moteyi, olobi malamu ; olobi solo ete Nzambe azali kaka moko, mosusu azali te. 33Kolinga Ye na motema na yo mobimba, na mayele na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso, mpe kolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka, yango nde ezali na tina mingi koleka bambeka ya kotumba mpe makabo nyonso.

34Tango Yesu amonaki ete molakisi ya Mobeko azongisi eyano na ndenge ya mayele, alobaki na ye : — Ozali mosika te ya Bokonzi ya Nzambe.

Mpe moto ata moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.
Copyright information for LinMNB