‏ Mark 12:35-37

Eyano ya Yesu na tina na bomoto ya Klisto

(Mat 22.41-46; Lk 20.41-44)

35Wana Yesu azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, atunaki : — Ndenge nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Klisto azali Mwana ya Davidi ? 36Pamba te Davidi, ye moko, alobaki boye na nzela ya Molimo Mosantu :
« Yawe alobaki na Nkolo na ngai :
‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali
kino natia banguna na Yo
na se ya matambe na Yo. › »
37 Soki ye moko Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ?

Ebele ya bato bazalaki koyoka Ye na esengo.
Copyright information for LinMNB