‏ Mark 13:1-13

Yesu asakoli pasi mpo na Yelusalemi

(Mat 24.1-3; Lk 21.5-7)

1Wana Yesu azalaki kobima longwa na Tempelo, moko kati na bayekoli na Ye alobaki na Ye : — Moteyi, tala ndenge mabanga oyo ezali kitoko ! Tala ndenge Ndako oyo ezali monene !

2Yesu alobaki na ye : — Ozali komona bandako minene oyo ! Libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu, nyonso ekobukama.

3Bongo Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, oyo etalana na Tempelo.

Petelo, Jake, Yoane mpe Andre batunaki Yesu, na esika oyo bazalaki bango moko kaka :
4— Yebisa biso, makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa biso ete makambo yango nyonso ekomi pene ya kokokisama ?

5Yesu alobaki na bango : — Bosala keba ete moto moko te akosa bino ! 6Bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele.
7 Tango bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te. 8Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, mabele ekoningana bipai na bipai, mpe nzala ekozala makasi penza. Makambo wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota.
9 Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako ya mayangani. Likolo na Ngai, bokosamba liboso ya bayangeli mpe liboso ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai. 10Pamba te esengeli ete Sango Malamu esakolama liboso epai ya bikolo nyonso ya mokili. 11Tango bakokanga bino mpo na komema bino na bisambiselo, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba ; boloba kaka oyo ekopesamela bino na tango wana, pamba te ekozala bino te bato bokoloba, kasi Molimo Mosantu. 12Ndeko akokaba ndeko na ye mpo ete baboma ye, tata akokaba mwana na ye mpo ete baboma ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango. 13Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai, kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.
Copyright information for LinMNB