Mark 13:24-31
24 Kasi na mikolo yango, sima na pasi wana,« moyi ekokoma molili,
sanza ekongenga lisusu te,
25 minzoto ekokweya longwa na Likolo,
mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »
26 Bongo, bato bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya monene mpe na nkembo. 27Akotinda ba-anjelu na Ye mpe akosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili, longwa na suka ya mabele kino na suka ya Likolo.
28 Tika ete lisese ya nzete ya figi eteya bino : soki kaka bitape na yango elembi mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene. 29Ndenge moko mpe mpo na bino ; tango bokomona makambo wana kosalema, boyeba ete Mwana na Moto akomi pene, lokola na bikuke ya engumba. 30Nazali koloba na bino penza ya solo : bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema. 31Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
Copyright information for
LinMNB