Mark 13:32-37
32Mpo na oyo etali mokolo to ngonga, moko te ayebi yango, ezala ba-anjelu ya Likolo to Mwana ; Ye moko kaka Tata nde ayebi yango.33 Bosala keba ! Bosenzela ! Pamba te boyebi te tango nini ngonga yango ekoya.
34 Ekozala lokola moto oyo akei na mobembo, bongo atiki ndako na ye mpe apesi mokumba na yango epai ya basali na ye ; apesi na mosali moko na moko mosala oyo ekoki na ye mpe apesi mitindo epai ya mokengeli ekuke ete akengela malamu. 35Yango wana, bosenzela ; pamba te boyebi te tango nini nkolo ndako akozonga : na pokwa to na midi ya butu to tango soso elelaka to mpe na tongo. 36Pamba te soki ayei na mbalakata, asengeli te kokuta bino bolali pongi. 37Makambo oyo nalobi na bino, nazali koloba yango mpe na bato nyonso : Bosenzela.
Copyright information for
LinMNB