Mark 14:17-21
17Tango pokwa ekomaki, Yesu ayaki na bapostolo zomi na mibale. 18Awa bazalaki na mesa mpe bazalaki kolia, Yesu alobaki : —Nalobi na bino ya solo, moto moko na kati na bino, oyo azali kolia elongo na ngai, akoteka ngai ! 19Bayokaki mawa mpe batunaki na ye moko sima ya mosusu : —Boni, ezali ngai ? 20Yesu azongiselaki bango : —Ezali moto moko na kati ya bapostolo zomi na mibale, oyo azali kotia eteni ya limpa na sani elongo na ngai. 21Mwana ya Moto azali kokende ndenge ekomama mpo na ye. Kasi mawa mingi na moto oyo ateki Mwana ya Moto ! Elingaki kozala malamu mpo na ye, soki abotamaki te.(Mt. 26.26-30 ; Lk. 22.15-20 ; tala 1 Kor. 11.23-25)
Copyright information for
LinMNB