‏ Mark 14:43-49

Bakangi Yesu

(Mat 26.47-56; Lk 22.47-53; Yn 18.2-11)

43Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato nde batindaki bango. 44Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko : « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye ; bokokanga ye mpe bokomema ye na se ya bokengeli malamu. »

45Tango kaka Yuda akomaki, akendeki epai ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Moteyi !

Mpe apesaki Ye beze.

46Mbala moko, basimbaki Yesu na makasi mpe bakangaki Ye. 47Bongo moko kati na bato oyo bazalaki wana abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi.

48Yesu alobaki na bango : — Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete ? 49Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali kosalema bongo mpo ete Makomi ekokisama.
Copyright information for LinMNB