Mark 14:53-65
Basambisi Yesu
(Mat 26.57-68; Lk 22.54-55, 63-71; Yn 18.12-14, 19-24)
53Bamemaki Yesu epai ya mokonzi ya Banganga-Nzambe epai wapi bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato mpe balakisi ya Mobeko, bango nyonso, basanganaki. 54Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino kati na lopango ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; avandaki kuna elongo na bakengeli, pene ya moto, mpe azalaki koyetola moto. 55Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa, kasi bazalaki kozwa yango te ; 56pamba te bato mingi bazalaki kokosela Ye makambo, kasi matatoli na bango ezalaki kokokana te. 57Mpo na kaka kokosela Ye makambo, bato mosusu bazalaki kotelema na koloba : 58« Toyokaki ye koloba : ‹ Ngai, nakobuka Tempelo oyo esalema na maboko ya bato ; mpe sima na mikolo misato, nakotonga Tempelo mosusu oyo ekosalema na maboko ya bato te. › » 59Kasi atako bongo, litatoli na bango ezalaki kaka ya lokuta. 60Mokonzi ya Banganga-Nzambe atelemaki kati na mayangani mpe apesaki Yesu motuna : — Boni, ozali te na liloba ya kozongisa ? Olobi nini liboso ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango ?61Kasi Yesu abatelaki kimia mpe apesaki ata eyano moko te. Mokonzi ya Banganga-Nzambe atunaki Ye lisusu : — Ozali Klisto, Mwana ya Ye oyo apambolama ?
62Yesu azongisaki : — Iyo, ezali se bongo. Mpe bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya elongo na mapata ya Likolo.
63Bongo mokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Mpo na nini koluka lisusu batatoli ? 64Bino moko boyoki ndenge nini afingi Nzambe. Bokanisi nini mpo na yango ?
Boye, bango nyonso bakatelaki Yesu etumbu, batatolaki ete abongi na kufa. 65Bato mosusu bakomaki kobwakela Ye soyi, kozipa Ye elongi, kobeta Ye makofi na koloba na Ye : — Sakola !
Mpe bakengeli bazwaki Ye mpe babetaki Ye bambata.
Copyright information for
LinMNB