Mark 14:53-72
Basambisi Yesu
(Mat 26.57-68; Lk 22.54-55, 63-71; Yn 18.12-14, 19-24)
53Bamemaki Yesu epai ya mokonzi ya Banganga-Nzambe epai wapi bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato mpe balakisi ya Mobeko, bango nyonso, basanganaki. 54Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino kati na lopango ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; avandaki kuna elongo na bakengeli, pene ya moto, mpe azalaki koyetola moto. 55Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa, kasi bazalaki kozwa yango te ; 56pamba te bato mingi bazalaki kokosela Ye makambo, kasi matatoli na bango ezalaki kokokana te. 57Mpo na kaka kokosela Ye makambo, bato mosusu bazalaki kotelema na koloba : 58« Toyokaki ye koloba : ‹ Ngai, nakobuka Tempelo oyo esalema na maboko ya bato ; mpe sima na mikolo misato, nakotonga Tempelo mosusu oyo ekosalema na maboko ya bato te. › » 59Kasi atako bongo, litatoli na bango ezalaki kaka ya lokuta. 60Mokonzi ya Banganga-Nzambe atelemaki kati na mayangani mpe apesaki Yesu motuna : — Boni, ozali te na liloba ya kozongisa ? Olobi nini liboso ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango ?61Kasi Yesu abatelaki kimia mpe apesaki ata eyano moko te. Mokonzi ya Banganga-Nzambe atunaki Ye lisusu : — Ozali Klisto, Mwana ya Ye oyo apambolama ?
62Yesu azongisaki : — Iyo, ezali se bongo. Mpe bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya elongo na mapata ya Likolo.
63Bongo mokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Mpo na nini koluka lisusu batatoli ? 64Bino moko boyoki ndenge nini afingi Nzambe. Bokanisi nini mpo na yango ?
Boye, bango nyonso bakatelaki Yesu etumbu, batatolaki ete abongi na kufa. 65Bato mosusu bakomaki kobwakela Ye soyi, kozipa Ye elongi, kobeta Ye makofi na koloba na Ye : — Sakola !
Mpe bakengeli bazwaki Ye mpe babetaki Ye bambata.
Petelo awangani Yesu
(Mat 26.69-75; Lk 22.56-62; Yn 18.15-18, 25-27)
66Wana Petelo azalaki na se, kati na lopango ya kati, mwasi mosali moko ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ayaki wana, 67amonaki Petelo koyetola moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki na ye : — Yo mpe ozalaki elongo na Yesu, moto ya Nazareti !68Kasi Petelo awanganaki ; alobaki : — Nayebi te ! Nazali kutu kososola te makambo oyo ozali koloba !
Bongo abimaki mpe akendeki kotelema pembeni, na ekuke ya lopango ; mpe soso elelaki ▼
▼Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu.
. 69Tango mwasi mosali amonaki ye, alobaki lisusu na bato oyo bazalaki wana : — Moto oyo azali moko kati na bango !70Petelo awanganaki lisusu. Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bazongelaki koloba na Petelo : — Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bango, mpe ozali moto ya Galile.
71Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe : — Nayebi te moto oyo bozali kolobela !
72Kaka na tango yango, soso elelaki mpo na mbala ya mibale. Bongo Petelo akanisaki maloba oyo Yesu alobaki na ye : « Liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato. » Mpe alelaki makasi.
Mark 15:1
Yesu asambi liboso ya Pilato
(Mat 27.11-26; Lk 21.1-5, 13-25; Yn 18.28-40; 19.4-16)
1Tango tongo etanaki, bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato, balakisi ya Mobeko mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda basanganaki mpo na kokata likambo. Bakangaki Yesu na basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya Pilato.
Copyright information for
LinMNB