‏ Mark 15:16-20

Basoda batioli Yesu

(Mat 27.27-31; Yn 19.2-3)

16Basoda bakumbaki Yesu kati na ndako ya moyangeli, na esambiselo, mpe basangisaki lisanga mobimba ya basoda. 17Balatisaki Yesu nzambala ya motane mpe ekoti oyo basalaki na banzube ; 18mpe babandaki kopesa ye mbote : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! »

19Bazalaki kosalela lingenda moke mpo na kobeta Ye na moto, bazalaki kobwakela Ye soyi mpe kofukama mpo na kogumbama liboso na Ye.

20Sima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala ya motane, balatisaki Ye lisusu bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu.
Copyright information for LinMNB