Mark 15:21-41
21Bakangaki na makasi moleki nzela moko oyo awutaki na bilanga, mpo ete amema ekulusu ya Yesu ; kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene mpe tata ya Alekizandre mpe Rifisi. 22Bamemaki Yesu na esika oyo babengaka « Gologota, » oyo elingi koloba : esika ya mokuwa ya moto, 23bapesaki Ye masanga ya vino basangisa na mire, kasi amelaki yango te. 24Babakaki Ye na ekulusu, mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke mpo na koyeba oyo moko na moko akozwa. 25Babakaki Ye na ekulusu na ngonga ya libwa ya tongo. 26Tala makomi oyo ezalaki kotalisa mpo na nini bakatelaki Ye etumbu : Mokonzi ya Bayuda. 27Babomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. [ 28Ezali boye nde ekokisamaki Makomi oyo ezali koloba : « Batangaki Ye na molongo ya bato ya mabe. »] ▼▼Eteni oyo ezali te kati na mikanda mingi ya kala.
29Baleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango ; bazalaki koloba : — Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato, 30mibikisa yo moko mpe kita longwa na ekulusu !31Bakonzi ya Banganga-Nzambe elongo na balakisi ya Mobeko bazalaki mpe kotiola kati na bango : — Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa te ! 32Tika ete Klisto, Mokonzi ya Isalaele, akita sik’oyo longwa na ekulusu, mpo ete tomona mpe tondima !
Bato oyo babakamaki elongo na Yesu na ba-ekulusu bazalaki mpe kofinga Ye.
(Mat 27.45-56; Lk 23.44-49; Yn 19.25-30)
33Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba. 34Na ngonga yango ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : — Eloi, Eloi, lema sabachtani ?Elingi koloba : « Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ? » 35Kati na bato oyo batelemaki wana, ndambo bayokaki Yesu ; boye bakomaki koloba : — Boyoka, azali kobenga Eliya !
36Moto moko akimaki mbangu, azindisaki eponze moko na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela ; alobaki : — Totala soki Eliya akoya kokitisa ye.
37Kasi Yesu agangaki makasi mpe akataki motema. 38Rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se. 39Mpe tango mokonzi ya basoda ya Rome, oyo atelemaki liboso ya Yesu, amonaki ndenge Yesu akufaki, alobaki : — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe !
40Ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kotala na mosika. Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake oyo ya elenge, ya Joze mpe ya Salome ; 41oyo bazalaki kolanda Yesu mpe kosunga Ye tango azalaki kati na Galile ; ezalaki mpe na basi mosusu ebele oyo bakendeki na Yelusalemi elongo na Yesu.
Copyright information for
LinMNB