‏ Mark 15:33-41

(Mat 27.45-56; Lk 23.44-49; Yn 19.25-30)

33Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.

34Na ngonga yango ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : — Eloi, Eloi, lema sabachtani ?

Elingi koloba : « Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ? »

35Kati na bato oyo batelemaki wana, ndambo bayokaki Yesu ; boye bakomaki koloba : — Boyoka, azali kobenga Eliya !

36Moto moko akimaki mbangu, azindisaki eponze moko na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela ; alobaki : — Totala soki Eliya akoya kokitisa ye.

37Kasi Yesu agangaki makasi mpe akataki motema.

38Rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se.

39Mpe tango mokonzi ya basoda ya Rome, oyo atelemaki liboso ya Yesu, amonaki ndenge Yesu akufaki, alobaki : — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe !

40Ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kotala na mosika. Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake oyo ya elenge, ya Joze mpe ya Salome ; 41oyo bazalaki kolanda Yesu mpe kosunga Ye tango azalaki kati na Galile ; ezalaki mpe na basi mosusu ebele oyo bakendeki na Yelusalemi elongo na Yesu.
Copyright information for LinMNB