‏ Mark 15:6-14

6Na feti nyonso ya Pasika, azalaki kobimisa na boloko mokangami moko oyo bato bazalaki kosenga. 7Na tango wana, moto oyo bazalaki kobenga « Barabasi » azalaki kati na boloko elongo na batomboki oyo bayeisaki mobulu kati na engumba mpe babomaki moto. 8Ebele ya bato bayaki mpe basengaki na Pilato ete asalela bango makambo oyo amesana kosalela bango mbala na mbala.

9Pilato atunaki : — Bolingi nabimisela bino mokonzi ya Bayuda ?

10Pilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakonzi ya Banganga-Nzambe bakabaki Yesu na maboko na ye. 11Bakonzi ya Banganga-Nzambe batindikaki ebele ya bato mpo ete basenga na Pilato ete abimisela bango Barabasi longwa na boloko.

12Pilato atunaki bango : — Nasala nini na moto oyo bozali kobenga mokonzi ya Bayuda ?

13Bagangaki lisusu : — Baka ye na ekulusu !

14Pilato atunaki bango lisusu : — Mabe nini asali ?

Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka : — Baka ye na ekulusu !
Copyright information for LinMNB