‏ Mark 2:13-18

13Yesu abimaki lisusu mpe akendaki pembeni-pembeni ya ebale. Bato ebele penza bayaki epai na ye mpe azalaki koteya bango. 14Tango azalaki koleka, amonaki Levi, mwana ya Alfeo, avandaki na biro oyo bafutelaka pako. Yesu alobaki na ye :

—Landa ngai !

Levi atelemaki, mpe alandaki ye.

15Tango yesu azalaki kolia na ndako ya Levi, bafutisi pakoebele na bato ya masumu, bazalaki mpe kolia elongo na ye na bayekoli na ye pamba te bato oyo bazalaki kolanda ye bazalaki mingi.

16Tango balakisi ya Mibeko ya lisanga ya bafarizeo bamonaki ete Yesu azalaki kolia na bato ya masumu mpe na bafutisi pako, batunaki bayekoli na ye :

—Mpo na nini azali kolia na bafutisi mpaku mpe bato ya masumu ?

17Tango Yesu ayokaki yango, alobaki na bango :

—Bato oyo bazangi maladi bazalaka na posa ya monganga te, kasibato ya maladi. Nayaki te mpo na kobenga bato na sembo, kasi bato ya masumu.

(Mt. 9.14-17 ; Lk. 5.33-39)

18Bayekoli ya Jean na oyo ya bafarizeo bazalaki koboya kolia mpo na mabondeli. Bongo bayaki kotuna Yesu :

—Mpo na nini bayekoli ya Jean na oyo ya bafarizeo baboyaka kolia mpo na mabondeli, kasi oyo ya yo basalaka bongo te ?

Copyright information for LinMNB