‏ Mark 2:18-22

18Bayekoli ya Jean na oyo ya bafarizeo bazalaki koboya kolia mpo na mabondeli. Bongo bayaki kotuna Yesu :

—Mpo na nini bayekoli ya Jean na oyo ya bafarizeo baboyaka kolia mpo na mabondeli, kasi oyo ya yo basalaka bongo te ?

19Yesu azongiselaki bango :

—Ndenge nini bato oyo babengisi na feti ya libala bakoki koboya kolia na tango mobali oyo abali azali na bango elongo ? Tango nyonso oyo mobali azali na bango elongo, bakoki koboya kolia te mpo na mabondeli.
20Kasi tango ekoya, tango bakolongola mobali na kati na bango, mokolo wana nde bakoboya kolia mpo na mabondeli.

21Moto moko te akoki kobamba elamba ya kala na eteni ya elamba ya sika ; soki asali bongo, eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala ; mpe kopasuka wana ekokoma monene koleka. 22Moto moko te akoki kotia vino ya sika na kati ya basaki ya kala oyo ya poso ya nyama ; soki asali bongo, vino ekopasola basaki, bongovino ekosopana mpe basaki ekobeba. Vino ya sika batiaka yango na kati ya basaki ya sika.

Yesu azali Mokonzi ya mokolo ya saba

(Mt. 12.1-8 ; Lk. 6.1-5)

Copyright information for LinMNB