Mark 3:20-25

20Tango Yesu akotaki na ndako, bato ebele bayaki lisusu kosangana, na ndenge ete ye na bayekoli na ye bakokaki kutu kolia te. 21Tango bato ya libota na ye bayokaki yango, bayaki mpo na kozwa ye na makasi pamba te bazalaki koloba : “Akomi na liboma”. 22Balakisi ya Mibeko oyo bawutaki na Yeruzalem balobaki :

—Azali na Belzebula kati na ye ; mpe ezali na bokonzi yamokonzi ya milimo mabe nde azali kobengana milimo mabe.

23Bongo Yesu abengaki bango, mpe alobaki na bango na masapo :

—Ndenge nini Satana akoki kobengana satana ?
24Soki bokonzi moko ekabwani kati na yango, bokonzi yango ekoki kowumela te. 25Soki ndako moko ekabwani kati na yango, ndako yango ekoki kowumela te.
Copyright information for LinMNB