‏ Mark 3:20-30

Yesu to Satana

(Mat 12.22-32; Lk 11.15-23; 12.10)

20Tango Yesu akotaki na ndako, bato ebele bayaki lisusu kosangana wana, mpe esalaki ete Ye elongo na bayekoli na Ye bazangaki ata tango mpo na kolia. 21Tango bandeko ya libota na Ye bayokaki bongo, bayaki mpo na kozwa Ye na makasi, pamba te bazalaki koloba : — Akomi na bokono ya liboma.

22Balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi balobaki : — Azali na molimo ya Belizebule kati na ye mpe azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.

23Yesu abengaki bango mpe alobaki na bango na masese : — Ndenge nini Satana akoki kobengana Satana ? 24Soki bokonzi moko ekabwani, bokonzi yango ekowumela te. 25Soki libota moko ekabwani, libota yango ekowumela te ; 26mpe soki Satana amibundisi mpe akabwani na ye moko, akowumela te, mpe suka na ye emonani. 27Pamba te moto moko te akoki kokota na ndako ya elombe mpo na kobotola biloko na ye soki liboso akangi ye te na basinga. Ezali kaka soki asali bongo nde akoki kobotola biloko na ye ya ndako. 28Nazali koloba na bino penza ya solo : masumu mpe maloba nyonso ya mabe oyo bato bakoki kofinga na yango Nzambe ekolimbisama ; 29kasi moto nyonso oyo akofinga Molimo Mosantu akolimbisama te, akomema mokumba ya lisumu yango mpo na libela.

30Yesu alobaki bongo, mpo ete bazalaki koloba : « Azali na molimo mabe ! »
Copyright information for LinMNB