‏ Mark 4:1-6

Lisapo ya moloni

(Mt. 13.1-15 ; Lk. 8.4-10)

1Yesu abandaki lisusu koteya pembeni ya ebale monene. Bato ebele penza bayaki kosangana epai na ye ; yango wana amataki na bwato mpe avandaki kati na yango, bongo bato nyonso bazalaki na mokili, pembeni ya ebale. 2Ateyaki bango makambo mingi na masapo ; mpe na mateya na ye alobaki :

3—Boyoka ! Moloni moko abimaki mpo na kolona mbuma. 4Tango azalaki kobwaka bambuma, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; bongo bandeke bayaki mpe baliaki yango. 5Ndambo mosusu ekweyaki na esika ya mabanga, esika mabele ezalaki mingite ; ebimaki noki, mpo mabele yango ezalaki mozindo te. 6Tango moi ebimaki, mwa banzete yango ezikaki mpo ezalaki na misisa te.
Copyright information for LinMNB