Mark 4:13-18
13Bongo Yesu alobaki na bango : —Bososoli lisapo oyo te ? Bongo ndenge nini bokososola masapo nyonso ?(Mt. 13.18-23 ; Lk. 8.11-15)
14—Moloni ezali oyo alonaka Liloba. 15Bato mosusu bazali lokola mbuma oyo ezali pembeni ya nzela, epai Liloba elonamaki. Tango bayokaka yango, Satana ayaka noki mpe abotolaka Liloba oyo elonamaka kati na bango. 16Basusu bazali lokola mbuma oyo elonamaki na esika ya mabanga, bayokaka Liloba mpe bandimaka yango mbala moko na esengo. 17Kasi lokola bazalaka na misisa te, bawumelaka kaka mwa tangomoke. Tango pasi to minyoko eyaka mpo na Liloba, bakweyaka noki penza. 18Basusu bazali lokola mbuma oyo elonamaki na kati ya banzube, bayokaka Liloba ;
Copyright information for
LinMNB