Mark 4:30-32
Lisese ya mbuma ya mutarde
(Mat 13.31-32; Lk 13.18-19)
30Yesu alobaki lisusu : — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini ? Tokoki kosalela lisese nini mpo na kokokanisa yango ? 31Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde : tango balonaka yango, ezalaka nkona oyo eleki moke kati na bankona nyonso ya mokili. 32Kasi sima na kolona yango, ekokola mpe ekomaka molayi koleka ndunda nyonso ya elanga, ebimisaka bitape minene oyo esalaka ete bandeke ya likolo etonga zala na se ya pio na yango.
Copyright information for
LinMNB