Mark 4:35-40
35Mokolo wana, tango pokwa ekomaki, Yesu alobaki na bayekoli na ye : —Tokatisa na ngambo mosusu. 36Batikaki bato, bakamataki ye ndenge azalaki, kati na bwato. Babwato mosusu mpe ezalaki na ye elongo. 37Bongo mopepe moko ya makasi penza ebandaki koleka, bambonge ebandaki kobeta na bwato ; bongo bwato ebandaki kotonda na mayi. 38Yesu azalaki na suka ya bwato, alalaki mpe atiaki motu likolo ya kuse. Bayekoli balamusaki ye mpe balobaki na ye : —Moteyi, tolingi kokufa ! Ozali komitungisa te ? 39Alamukaki, agangelaki mopepe mpe alobaki na ebale : —Tika makelele ! Vanda kimia ! Mopepe esilaki mpe kimia monene ezongaki. 40Bongo alobaki na bayekoli na ye : —Mpo na nini bozali kobanga ? Ndenge nini bozangi kondima ?
Copyright information for
LinMNB