‏ Mark 5:21-26

21Tango Yesu akatisaki lisusu na ngambo ya ebale, na bwato, bato ebele bayaki kosangana epai na ye ; mpe azalaki pembeni ya ebale monene.

22Bongo moko na kati ya bakonzi ya Ndako ya mayangani, kombo Yayirusi, ayaki wana. Tango amonaki Yesu, afukamaki liboso na ye, 23mpe abondelaki ye mingi :

—Mwana na ngai ya mwasi alingi kokufa. Nabondeli yo, yaka mpe tiela ye maboko, mpo ete abika mpe azala na bomoi.

24Bongo Yesu akendaki na ye elongo. Bato ebele penza bazalaki kolanda ye mpe kofina-fina ye bipai nyonso. 25Mpe mwasi moko azalaki wana, azalaki na maladi ya kotanga makila bambula zomi na mibale. 26Amonaki pasi mingi penza mpo na kokendeke epai ya minganga ebele ; mpe asilisaki mbongo na ye nyonso pamba kasi mbongwana ezalaki te. Kutu pasi ezalaki kaka komata.
Copyright information for LinMNB