Mark 6:14-16
14Mokonzi Erode ayokaki sango ya Yesu, pamba te kombo na ye epanzanaki mingi penza. Bato bazalaki koloba : —Jean Batiste asekwi kati na bakufi ! Yango wana azali na nguya ya kosala makamwisi. 15Kasi basusu bazalaki koloba : —Ezali Eliya ! Bato mosusu mpe bazalaki koloba : —Azali moprofeta lokola moko ya baprofeta. 16Kasi tango Erode ayokaki yango, alobaki : —Ezali Jean, oyo nakatisaki motu, nde asekwi kati na bakufi !(Mt. 14.3-12 ; Lk. 3.19-20)
Copyright information for
LinMNB