‏ Mark 6:14-29

Kufa ya Yoane Mobatisi

(Mat 14.1-2; Lk 9.7-9)

14Mokonzi Erode ayokaki sango na tina na Yesu, pamba te Kombo na Ye eyebanaki makasi.

Bazalaki koloba boye na tina na Yesu : « Yoane Mobatisi asekwi kati na bakufi ! Yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa ! »

15Bato mosusu bazalaki koloba : « Ezali Eliya ! »

Bamosusu : « Azali mosakoli, lokola moko kati na basakoli ya kala ! »

16Kasi tango Erode azalaki koyoka maloba wana nyonso, azalaki komilobela : « Ezali Yoane oyo nakataki moto nde asekwi kati na bakufi ! »

17Pamba te Erode amipeselaki mitindo ete bakanga Yoane minyololo mpe babwaka ye kati na boloko ; asalaki bongo mpo na kosepelisa Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko na ye, oyo ye Erode abalaki.

18Yoane azalaki koloba na Erode : « Ozali na ndingisa te ya kosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na yo. »

19Erodiade akangelaki Yoane kanda kati na motema mpe azalaki koluka nzela ya kobomisa ye, kasi azalaki kokoka te, 20pamba te Erode azalaki kobanga Yoane, wana ayebaki ete Yoane azali moto ya sembo mpe mosantu, mpe azalaki kobatela ye. Tango nyonso oyo Erode azalaki koyoka Yoane koloba, azalaki komitungisa mingi ; nzokande azalaki kaka kosepela koyoka ye.

21Nzokande, na mokolo ya kosepela mbotama ya Erode, Erodiade akutanaki na libaku ya kokokisa mokano na ye. Na mokolo yango, Erode asalaki feti monene mpe abengisaki bakalaka, bakonzi minene ya basoda mpe bato ya lokumu ya Galile. 22Mwana mwasi ya Erodiade akotaki mpe abinaki, asepelisaki Erode mpe bato oyo abengisaki na feti. Mokonzi alobaki na mwana mwasi : — Senga ngai nyonso oyo okolinga, nakopesa yo yango !

23Mpe alapaki kutu ndayi epai na ye : — Nakopesa yo nyonso oyo okosenga ngai, ata ndambo ya bokonzi na ngai.

24Mwana mwasi abimaki mpe akendeki kotuna toli epai ya mama na ye : — Mama, nasenga nini ?

Mama na ye azongisaki : — Senga moto ya Yoane Mobatisi.

25Mbala moko, mwana mwasi azongaki na lombangu epai ya mokonzi mpe alobaki na ye : — Nalingi ete opesa ngai, sik’oyo, na sani, moto ya Yoane Mobatisi.

26Mokonzi ayokaki mawa mingi na motema, kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, aboyaki kopimela ye yango. 27Mbala moko, mokonzi atindaki moko kati na bakengeli na ye ete amema moto ya Yoane. Mokengeli yango akendeki na boloko, akataki moto ya Yoane, 28amemaki yango, na sani ; apesaki yango epai ya mwana mwasi, mpe mwana mwasi apesaki yango epai ya mama na ye. 29Tango bayekoli ya Yoane bayokaki sango yango, bayaki kozwa nzoto na ye mpe batiaki yango kati na kunda moko.
Copyright information for LinMNB