Mark 6:45-52
Yesu atamboli na mayi
(Mat 14.22-33; Yn 6.16-21)
45Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na Betisaida, na ngambo mosusu ya ebale, wana Ye moko akozongisa bato. 46Sima na Ye kozongisa bato yango, amataki na ngomba mpo na kosambela. 47Wana ekomaki pokwa, bwato ekomaki na kati-kati ya ebale ; mpe Ye, Yesu, azalaki Ye moko na mokili, 48amonaki bayekoli na Ye kobunda-bunda mpo na koluka nkayi, pamba te mopepe ezalaki kozongisa bango na sima. Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango. 49Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, bakanisaki ete ezali elima, mpe bakomaki koganga. 50Solo, bango nyonso bamonaki Ye, mpe somo makasi ekangaki bango. Mbala moko, Yesu alobaki na bango : « Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali Ngai ! » 51Bongo amataki na bwato epai bayekoli bazalaki, mpe mopepe ekitaki. Bakamwaki mingi penza, 52pamba te basosolaki te tina ya likamwisi ya mapa, mpo ete mayele na bango ezalaki ya kozipama.
Copyright information for
LinMNB