‏ Mark 8:1-10

Yesu aleisi mibali nkoto minei

(Mat 15.32-39)

1Na mikolo yango, ebele penza ya bato bayaki lisusu kosangana zingazinga ya Yesu. Lokola bazalaki na eloko ya kolia te, Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki na bango : 2 — Nazali koyokela bato oyo mawa, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te. 3Soki nazongisi bango na bandako na bango na nzala, bakolemba nzoto na nzela ; pamba te, bato mosusu kati na bango bawutaki mosika.

4Bayekoli na Ye bazongisaki : — Kati na esobe oyo, esika nini tokoki kozwa mapa mpo na koleisa bango mpe batonda ?

5Yesu atunaki bango : — Bozali na mapa boni ?

Bazongisaki : — Tozali na mapa sambo.

6Boye, alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele. Bongo azwaki mapa yango sambo, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato. Mpe bayekoli basalaki bongo. 7Bazalaki mpe na mwa ndambo ya bambisi ya mike-mike. Apambolaki yango mpe alobaki na bayekoli na Ye ete bakabola yango. 8Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, batondisaki na yango bitunga sambo. 9Bato bazalaki pene nkoto minei. Bongo, Yesu azongisaki bango.

10Mbala moko, Yesu amataki na bwato elongo na bayekoli na Ye mpe akendeki na etuka ya Dalimanuta.
Copyright information for LinMNB