Mark 8:11-13
Yesu mpe Bafarizeo
(Mat 16.1-4)
11Bafarizeo bayaki mpe bakomaki kotuna Yesu mituna ; mpo na komeka Ye, basengaki na Ye ete asala elembo moko kowuta na Likolo. 12Yesu ayokaki mawa makasi kati na molimo na Ye mpe alobaki : « Mpo na nini bato ya ekeke oyo bazali kosenga elembo ? Nazali koloba na bino penza ya solo : bakopesamela elembo moko te ! » 13Bongo atikaki bango, amataki lisusu na bwato mpe akendeki na ngambo mosusu ya ebale.
Copyright information for
LinMNB