‏ Mark 8:14-21

(Mat 16.5-12)

14Bayekoli babosanaki komema mapa ; bazalaki kaka na lipa moko kati na bwato. 15Yesu akebisaki bango : — Bofungola miso mpe bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Erode !

16Bayekoli bakomaki kolobana bango na bango : — Azali koloba bongo mpo ete tozali na mapa te.

17Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki : — Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te ! Mpo na nini ? Boni, bozwi kaka bososoli nanu te ; mayele na bino ezali kaka ya kozipama ; bozali na mitema makasi ; 18bozali na miso, kasi bozali komona te ; bozali na matoyi, kasi bozali koyoka te ? Bobosani penza ! 19Tango nakataki mapa mitano mpo na kokabolela bato nkoto mitano, bozongaki na motango boni ya bitunga etonda na biteni ya mapa, sima na kokabolela bato ?

Bazongisaki : — Bitunga zomi na mibale.

20 Bongo tango nakataki mapa sambo mpo na kokabolela bato nkoto minei, bozongaki na bitunga boni etonda na biteni ya mapa ?

Bazongisaki : — Tolokotaki bitumba sambo.

21Alobaki na bango : — Bozwi kaka bososoli nanu te ?
Copyright information for LinMNB